Koluka maloba (ba mots)
Lingála - Français
Français - Lingála

Koluka makelelo (ba verbes)
Lingála - Français
Français - Lingála

Maloba ya libosó

LINGÁLA YA MOKOLO NA MOKOLO
- KOYÓKA PÉ KOSÍMBA NTÍNA -

Bandeko Batángi tó ba lecteurs ya Magazine Suka Epoque,

Po na kokóba na makanisi na bísó, po na kokokisa objektif na bísó, tomónákí ke, ekozala malámu soki totiélí bínó áwa Outil oyo, Dictionnaire ya Suka Epoque, po na koyekola ba mots ya lingála.
Dictionnaire oyo Lingála-Français ezalí na biténi míbalé:ya libosó esangísí molongó ya maloba, pe ya míbalé esangísí molongó ya ba verbe

Libosó tóbanda mosála oyo, Kestion moko ezalákí kotungisa bísó: ndéngé nini moto oyo ayebi lingála te, akoki koyékola maloba ya lingála, na ndéngé ke soki azali koyóka bato bazali kosolola na lingala lelo, ákoka pe ko comprendre? Yango wáná tozwákí likanisi ya kosangisa maloba oyo ewúti na lingala ya mokolo na mokolo, ndenge elobamaka na bala-bala, pe na ba ndako na bíso, to pe na bisíká ya mosálá to pe ya lisano, po na kosála dictionnaire moko "Actuel" ya Lingala. Po lingála ezali kokóla se kokóla, ndéngé moko na minoko misúsu ya mokili (fransé, anglé etc...)

Yango wana, na mokúsé, Dictionnaire ya Suka Epoque esalémí surtout na ntina (but) wáná. Po na ba óyo bayébí nánu lingála te,tó pé ba óyo bazali koyékola lingála. Kasi ekokí pe kosalisa ba óyo basí babósáná lingála po bákoka koyékola yango lisúsu.
yango wana totié yango awa na Internet, po moto na moto ákoka ko profiter pe kosálela yango. Ezali ko remplacer te ba livres ya Bandeko mosúsu oyo esí ebimá.

Dictionnaire ya Súka Epoque ezali complément na ba effort bandeko mosúsu basálá libosó na bísó po ya kolengela pe kotómbola monoko ya lingála, oyo ezalí parmi minoko misúsu (lokóla Swahili, Tshilúba, pe Kikóngó) óyo ezali kosangisa bísó bana ya Kongó.

Donc, yango wáná , tozali na besoin ya lisálisi na bínó po na ko compléter pe kobongisa Dictionnaire oyo, na ba mots oyo ezalí kozánga.
Bokoki kokomela bíso po na kopesa bísó ba mots to ba termes ya sika, to pé kosalisa bíso na ndéngé ba possibilités na bínó ezali.

Mikandá na bínó ekozala toujours le bien-koyá

Rédaction