A B C D E F G H I J K L M N O P Q R S T U V W X Y Z

ESALELI MPO YA MALOBA

Ba ndeko batángi,

Ya libosó penzá, po na kokóta pe koluka ndimbola ya maloba ya lingála na fransé, bosengélí konyata na bilembo ya mikandá oyo ekomami na motane awa likoló: A B C D...

Lingála, ngéngé boyebi, ezali monoko ezali kolobama káka na bato na Ekwatéle te. Yango ezali pe komonisa ntina oyo tokokútaka mbala míngi maloba ya minoko mosúsu na lingála. Yangó wáná, po ya kosála bokeseni, bokokúta maloba ya lingála oyo ezali kolobama kíno móyi ya leló, yango ekomami na motáné ya ngóla makasi (rouge foncé, gras)
Ndakisa: Likanisi = pensée

Bokokúta pe maloba mosúsu ya lingála oyo elobamaka lisúsu mingi te. Maloba yangó etíkálá tango mosúsu bobélé na mikandá, tó pé bokoyóka yangó na baye balobaka bó momeseno lingála ya makanza. Bana ya Kisásá ya móyi ya leló bamíngi bayebi yango te. Maloba yango makomámí na moyindo makási (noir, gras)

Ndakisa: nkínga = vélo

Bokokúta pe maloba mosúsu ya lingála oyo ewútí na fransé, kasi ekótá na lingála. Yango ekomami pe na motáné ya ngóla makasi (rouge foncé, gras), pe na suka, kati ya ba mifiníku (parenthèses) liloba ya Lingála, ndenge elóngóbání.

Ndakisa: objektif (nsúka) = but, objectif

Ezalí pé na maloba mosusu ewúti na Kikóngo, Tshilúba, Swahíli to pe minoko misúsu ya Kongó, pe ekótá na lingála. Yango ekomami pe na motáne ya ngóla makasi (rouge foncé, gras), pe na súka, kati ya mifiníku, etiamí "Arg." yango elingi koloba argot

Ndakisa : lúpemba (arg.) = succès

 

Maloba óyo ekomámí na monéne rouge foncé ezali kolobama mokolo na mokolo. Kasi oyo ezali na moyindo elobamaka lisúsú mingi te. Elingi koloba 'te soki olobi yango, mingi bako yeba te soki olobi nini, pe bakosímba tína te.

Ndakisa : káwa (kafé) = café
kawa: elobamaka lisúsu té ; balobaka lelo oyo : kafé ; Ndimbola na fransé = café

Bokokúta pe ba ndóí ya maloba (synonymes). Yangó ekomámí mpe etiami kati ya mifiníku (parenthèse)

Ndakisa : lipiká (pambu) = ver de terre

Dikisionère ya Suka Epoque nanu esílí te. Tokotóndisa yango malembe malembe, biso na bínó elongó.
Kasi kinó wáná ekotónda, totombeli bínó botángi malámu

la rédaction