ESALELI PO NA BA VERBE Ba ndeko batángi, Ya libosó
penzá, po na kokóta pe koluka ndimbola to traduction ya
ba verbes (1) ya
lingála, Ebongi bonyata na ba lettres to bilembo ya mikandá
(A, B, C, D...) oyo ekomami na bleu, awa likoló.
ndakisa: Lingála,
ndéngé boyebi, ezali monoko oyo elobamaka káka na
bato na Ekwatére te. Yango ezali pe ntina oyo tokútaka mbala
míngi maloba ya minoko mosúsu na kati ya lingála.
Yangó wáná, po ya kosála distinction (5),
bokokúta ba verbe ya lingála oyo elobamaka ti leló.
Yango ekomami na rouge foncé
(6). Bokokúta
pe ba verbe misúsu ya lingála oyo elobamaka lisúsu
mingi te. Ba verbe yangó etíkálá tango mosúsu
kaka na littérature (7), tó pé
bokoki koyóka yangó epai ya batu oyo bamesáná
koloba lingála ya solo-solo, oyo ya makanza. Bana ya Kisásá
na móyi ya leló, bamíngi bayebi yango te. Ba verbe
yango ekomámí na moyindo makási
(noir, gras) Bokokúta
pe ba verbe misúsu ya lingála oyo ewútí na
fransé, kasi ekótá na lingála na elobeli ya
mokolo na mokolo. Yango ekomami pe na rouge
foncé, pe na suka, kati ya ba parenthèses
(8) totié liloba ya Lingála, ndenge
esengélí. Ezalí
pé na maloba mosusu ewúti na Kikóngo, Tshilúba,
Swahíli to pe minoko misúsu ya Kongó, pe ekótá
na lingála. Yango ekomami pe na rouge
foncé, pe na súka, totié "Arg.",
yango elingi koloba argot (elobeli ya balabala) Ba verbe óyo ekomámí na rouge foncé ezali oyo elobamaka mokolo na mokolo. Kasi oyo ezali na moyindo makasi, elobamaka lisúsú mingi-míngi te. Elingi koloba ke soki olobi yango lelo, mingi bako yeba te soki olobi nini, pe bako comprendre (9) te. Ndakisa:
-sélingwa (kobongama)
= être prêt, s'être préparé Bokokúta pe ba ndóí ya maloba (synonymes). Yangó ekomámí mpe etiami kati ya mifiníku () Ndakisa: -bóyisa (pekisa) = interdire, priver Dikisionère
ya Suka Epoque nanu esílí te. Tokotóndisa
yango malembe malembe, biso na bínó elongó.
|
(1)
Makelelo) ; (2) Bokeseni ; (3) Maloba ; (4) bibandela ; (5) Bokeseni ;
(6) motane makási, ya ngóla ; (7) ba búku mpe mikandá
; (8) mifiníku ; (9) kosímba tína ; (10) |