A B C D E F G H I J K L M N O P Q R S T U V W X Y Z

ESÁLELI MPO NA MALOBA

Ba ndeko batángi,

Ya libosó penzá, po na kokóta pe koluka ndimbola ya maloba ma lingála na fransé, bosengélí konyata na bilembo ya mikandá oyo ekomámí na motane awa likoló: A B C D...

Lingála, ndéngé boyebi, ezali monoko mozali kolobama káka na bato baútá na Ekwatéle te. O ntína méi tokokútaka mbala míngi maloba ya minoko mosúsu o ntéi ya lingála. Yangó wáná, po ya kotálisa mwá bokeseni, bokokúta maloba ya lingála oyo ezali kolobama kíno móyi ya leló, yango ekomami na motáné ya ngóla makasi (rouge foncé, gras)

Ndakisa : Likanisi = pensée

Bokokúta pe maloba mosúsu ya lingála oyo elobamaka lisúsu mingi te. Maloba yangó etíkálá tango mosúsu bobélé na mikandá, tó pé bokoyóka yangó na baye balobaka bó momeseno lingála ya makanza. Bana ya Kisásá na móyi mwa leló bamíngi bayebi yango soko moke te. Maloba mangó makomámí na moyindo makási (noir, gras)

Ndakisa : nkínga = vélo

Bokokúta mpe maloba masúsu ma lingála maye mawútí na fransé, kasi ekótá na lingála. Yango ekomámí mpe na motáné ya ngóla makasi (rouge foncé, gras), pe na suka, kati ya mifiníku (parenthèses) liloba ya Lingála, ndenge elóngóbání.

Ndakisa : objektif (nsúka) = but, objectif

Ezalí pé na maloba masúsu maúti na Kikóngo, Tshilúba, Swahíli to mpe na makótá masúsu ma Kongó, mpe masílá kokótá na lingála. Maloba mangó makomámí mpe na motáne ya ngóla makasi (rouge foncé, gras), mpe na nsúka, kati ya mifiníku, etiamí "Arg." yango elingi koloba argot

Ndakisa : lúpemba (arg.) = succès


Maloba maye makomámí na motáné ya ngóla makasi (rouge foncé) mazali maye makolobamaka mokolo na mokolo. Kasi maloba masúsu maye matiámi na moyindo makolobamaka lisúsú mingi-míngi te. Elingi koloba 'te soki olobi yango, ba mingi bako yeba penza te soki olobi nini, mpe bakosímba tína soko moke te.

Ndakisa : káwa (kafé) = café
kawa: elobamaka lisúsu té ; balobaka lelo oyo : kafé ; Ndimbola na fransé = café

Bokokúta pe ba ndóí ya maloba (synonymes). Yangó ekomámí mpe etiami kati ya mifiníku (parenthèse)

Ndakisa : lipiká (pambu) = ver de terre

Dikisionère ya Suka Epoque nanu esílí te. Tokotóndisa yango malembe malembe, biso na bínó elongó.
Kasi kinó wáná ekotónda, totombeli bínó botángi bolámu

la rédaction