Koluka maloba (mots)
Lingála - Français
Français - Lingála

Koluka makelelo (verbes)
Lingála - Français
Français - Lingála

Maloba ma yambo

LINGÁLA YA MOKOLO NA MOKOLO
- KOYÓKA PÉ KOSÍMBA NTÍNA -

Bandeko Batángi ya Magazine Suka Epoque,

Na bolandáká makanisi ma bísó, po ya kokókisa likáni (objektif) lya na bísó, tomónákí 'te ekoleka malámu sókó totiélí bínó áwa Esálelo oyo, Dikisionére ya Suka Epoque , po ya koyékola maloba ma lingála.
Dikisionére oyo Lingála-Français ekabólámí na biténi míbalé:ya yambo, esangísí molongó ya maloba, pe ya míbalé esangísí molongó ya makelelo.

Libosó 'te tóbanda mosála moye, motúná mókó mozalákí na ntína míngi, pé motúná mwangó mozalákí lokóla mosisá mwa mosálá moye: Loléngé níni moto óyo ayébí lingála te, akokí koyékola maloba ma lingála, na ndéngé 'te soki azali koyóka bato bazali kosolola na lokótá ya lingala leló, ákoka pé kosímba ntína?

Na Ntína éná tozwákí likanisi lya kosangisa maloba maye mazwámí na lingála ya mokolo ná mokolo, ndenge elobamaka na bala-bála, pe na ba ndako na bíso, tó pé na bisíká ya mosálá tó pé bisíká ya lisano, pó na kosála dikisionére moko "ya sika", ya Lingala. Pamba té lokótá ya lingála pé ezali kokóla bobélé kokóla, ndéngé mókó na minoko misúsu ya mokili.

Yango wana, na mokúsé, Dikisionére ya Súka Epoque esalémí penza na ntína éná. Po na ba óyo bayébí náino lingála te, tó pé ba óyo bazali koyékola lingála. Kasi yangó ekokí pe kosálisa baye babósáná lingála po na koyékola yango lisúsu.
Na ntína wana totíí yango awa na Internet, po 'te moto na moto na esíká azalí, ákoka kosálela yangó. Dikisionére ya Súka Epoque ezalí kokitana té makomí ya bandeko bayíké, makomí maye masílá kobima na nzelá ya mikandá.

Dikisionére ya Suka Epoque ezali ndé eténi pó ya bobakisi pé bokokisi mosálá monéne pe ya pasi, moye bandeko mingi bamipésákí pó ya koléngela pe kotómbola lokótá ya lingála, oyo ezalí yókó ya makótá ma lokúmu (lokóla Swahili, Tshilúba, pe Kikóngó) maye mazalí kosangisa bísó bána nsómí ya Kongó.

Na ntína wáná, tozalí na boséngá ya lisungí na bínó pó na kokokisa Dikisionére óyo, na maloba maye mazángí. Bokokí pé kokomela bísó pó ya kopésa bísó maloba ma sika, to pé kosálisa bíso na ndéngé makokí na bínó mazali. Mikandá mya bínó mikoyambama sé na esengo míngi

Rédaction