- lingala -
Ba ndeko Batángi, ba lecteurs ná ba lectrices, bana mayi,

Mingi entre bino batángáká dans le passé pe na ba années eleki, ba revues à la page, neti "Jeunes pour Jeunes" (JPJ) , "Kake", "Likembe", "Boum Magazine", "Bilenge", "Super As", "Le Yaya", ba vrai histoires ya kitóko, na ba Héros ya BD (Bande Dessinée) lokóla: Apolosa, Sinatra, Coco et Didi, Mosekonzo, Mama Sakina, Djo-Ka, Djo-Ef, Durango, Errol, Wabuza, Molok, Ndongidos etc...

Bandeko ebelé, pé bana mayi ebelé, baleláká ba masoló wana na ndenge ya liboma. Donc, plaisir wáná etíká ebelé ya bato na ba nostalgies, parce que ba histoires wáná ezalaka lisúsu te. Même epái ya ba grands collectionneurs, ezá rare po na kozwa yangó.

Alors ba auteurs, tó pé ba dessinateurs pé ba créateurs ya ba histoires wáná, bamisúsu pe bakómá na Pótó. Entre bangó, bayéi kodecider, il faut ba-relancer ba histoires wáná lisúsu. Tellement ba lecteurs, ná bana mayi tous bazá kozela. Est-ce que ezá esengo, to esengo te?!

Mais comme ba générations ya sika pé ebimá, mentalité pé echangea, ki-yanké pé echanger forme. Kamua vé, lota vé, monde yango pé ezá kokende sé na rythme ya likongá: toujours en avant. Donc sókí tosálí calcul: Tout wáná ezá pé kosénga ba idées ya sika. Yangó wáná "Suka Epoque" eyéi.

"Suka Epoque", bokokí ko interpréter yangó ndéngé bolingí. "Suka Epoque" elingí koloba: Makambo toujours à la page. Comme pé na communauté na bísó, moto nyónso akómá na yé kosámbela (ezá mabé te, vrai likambo kútu), oyóka Ô, wáná révue ya ba bandits, wáná bilóko'a mokili, wáná bilóko'a "basúmuki" autrement dit "ba pagáno". Maleeeeembe. Ezá n'angó bóngó te.

"Suka Epoque" ezá révue ya "bapagáno" te, ezá pé révue ya ba "chrétiens" te. Ndéngé móyi ebimaka pó na moto tout, "Suka Epoque" ezá révue ya bisó nyónso. Revue ya vrai, óyo moto nyónso akokí ko se distraire na yangó. Pó na ko soutenir ba valeurs morales ya bien,"Suka Epoque" ekopésa pé ba idées ya bien; eko critiquer pé ba comportements ya mystique oyo tomónaka pé toyókaka, à travers ba masoló, sans complaisance, c'est-à-dire: mawa te, complicité pé te.

Conclusion: Yángó wáná sóki bazá kopekisa bínó bótánga "Suka Epoque" te, atá ya kobombama (en cachette) bótánga kaka: Po "Suka Epoque" ezá révue ya ko-rater te!

Alors ba idées ya sika na part na bino pé ezali le bien-koya (ba idées na bino ezá les bienvenues). Donc tokoyamba yangó na esengo.

Botángi malámu!

Bonne lecture!