Bandeko,

Na ndéngé pé tomekákí kotúna-tuna (tosálákí mwa songage ya moke), tomónákí ke tokoki te kosála magazine Suka Époque na lingála ya makási, Lingála ya sóló-sóló, ya original, po ebele bazali ko se plaindre ke, bazali kokoka lingala wana te. Yango wana pona bózala na facilité ya ko yeba pe ko comprendre nini tozali koloba. tomeki kolembisa lingala na biso moke, na ndenge ke bokoka kolanda biso malamu.

Lokóla batángi na bísó, to ba lecteurs, bazali mingi kaka bilengé, donc ba jeunes, óyo bazalí kaka bato ya Equateur te, kasi bawútá pe ba mboka misusu, Bingumba to pe ba provinces misúsu ya Congo, donc bayébi Lingála ya makási te (donc, óyo eléndá wáná...), yango wana to décider káka tókoma na Lingala óyo moto nyonso akoki koyóka pe ko comprendre. Po posa na biso ezalí ya kosepelisa bíno na masoló ya bien. Ba cours ya lingala bokokí kozwa yango na bisiká misúsu ndenge tolakisi binó déjà-déjà na rubrike na biso "Bisiká misúsu ya malongá".

Bandeko oyo bazali na posa ya koyékola Lingála ya solo-solo (classique) to pe kolendisa lingála na bango, báleka kuna...

Totiéli binó pe Rubrike ya sika "Coin ya Masoló". Na place wáná tokotiéla bino sima ya 2 semaines lisoló moko ya kitoko, na ndambu-ndambu (par épisodes). Pe bokosepela. D'ailleurs déjà bozá ya kosepela...

Bózanga te kokomela bísó po na tóbongisa Magazine na bínó Suka Epoque moke moke tii tango ekokóma penza na ndenge bolingí ézalela.