Po na kotota na page: 1 | 2

Oyo ezali esíká po na échange ya ba idées. Awa bokokuta ba lettres na bínó Batángi to ba lecteurs.

Na place oyo, bokoki pe kotindela biso ba critiques na bino to pe ba encouragements tó pé lisúsu ba
conseils óyo ekokí kosálisa bísó po tóbongisa Magazine na bino "Suka Epoque". Kasi bolimbisa biso soki tokokoka te kotia ba lettres nyonso bokotindela biso. Kasi ekosala biso plaisir mingi pona kotanga bino.
Pó na kokomela bísó, nyatá mbala mókó awa, na envelope óyo:

Pó na kokomela bísó na E-Mail, Adresse na bísó pé yangó óyo:

redaction@suka-epoque.de

Mokandá etíndámi na:
(Expéditeur)

Ntína ya mokandá:
(Sujet)



Manda
bunia/ ituri/ rdc
31 Mai 2006

Sujet: manque ya bamagasine na bino awa na bunia
 


tozali kosenga na bino ba biloko ya sika,awa na bunia tozwaka bamagasine nabino te.

Réponse ya Rédaction


Mbóte mingi ndeko Manda,

tosepeli mingi na mokanda na yo.
Tozali kokanisa ndenge nini tokoki kosála po tii kuna na bunia bokoka pe kozwa mikanda na biso. Lokóla naino ba nzela malamu ezali te, ezali nanu mwa pasi. Kasi, tozali koluka nzela nyonso po bino kuna pe bokoka kotanga biso.

Tozali na elikya ete mikolo ekoya, tokozua solution, to nzela ya kotindela bino magazine, po bino pe bopsepela.

Melesi mingi po na mokanda na yo. Kozanga te kokomelaka biso tango na tango,
pe kopesa lisolo na biso na baye oyo bozali na bango elongo.

Mbote mingi epai ozali na Bunia/Ituri/ RDC

Aldobush
Rabat/ Maroc
25 Mai 2006

Sujet: contact
 


salut mes chers frères bana mboka,

RDC na biso ezali na posa ya batu neti bino pour son evolution donc je vous souhaite bonne continuité et je vs remercie ndenge bo contactaki ngai pour me signaler site na bino d'ailleurs ngai pe na fandi pamba té na sali pe lisus publicité epayi ya ba ndeko mosusu na nzela ya skyblog na ngai ,

je vous invite aussi à y faire un petit tour www.aldobush.skyblog.com

Réponse ya Rédaction


Merci mingi Ndeko Aldobush.

Towuti kobwaka liso na Skyblog na yo: Kitooooooko!
toyoki pe nzembo oyo ebinisaki Capitaine Hadock. totikeli yo pe mwa liloba moke...

Mbote mingi epai ozali na Rabat, na mboka Maroc

Erick Metha
Leeds/ Angleterre
25 Mai -2006

Sujet: Édition spéciale du Magazine Suka Époque
 

Mon non c'est erick metha

Biso tozali na North ya Engleterre( Leeds) est je suis
convincue que batu ba kozala vraiment interesser ya
kotanga Magazine suka epoque est surtout ezali na
lingala.
Organisme na biso ezali: congolink
website ezoya: www.congolink.com

contactez biso po to tala ndenge nini tokozua
Magazine.
N.b congolink ezali interent cafe...

Mercy

erick metha

Réponse ya Rédaction


Wa biso Ndeko Erick Metha

Merci mingi po na mokanda na yo.
Toko contacter yo na nzela ya E-mail. Merci mingi

Pe totindeli yo mbote miiingi na Angleterre epai ozali

Trey
Berlin/ Allemagne
18 Mai 2006

Sujet:
 


Esengo mingi koyoka b´avantir e oyo ezo salama nzinga nzinga na ngai. na sepeli lisusu, na makambo oyo ebakisami, donc emataaaaaaaaaah.


Réponse ya Rédaction


Merci, Ndeko Trey.

Ndenge kaka ezali. Ekomata se komata.

Mbote na yo.

Thérèse
Gabon
16 Mai 2006

Sujet: partie francais lingala
 


bjr

je ss tres ravie d avoir decouvert votre site j aimerai faire des progres en lingala mais je me retrouve confrontée a un obstacle: ds votre dictionnaire on ne trouve pas la partie lingala francais or si on sait pas parler c est pas evident de n utiliser que la partie lingala français.

Réponse ya Rédaction


Chère Thérèse,

Nous sommes en train de porter une dernière main sur la partie Français-Lingala de notre dictionnaire Suka-Epoque.
À partir de la semaine prochaine vous pourrez l' avoir en ligne.

Et dès le début du mois de Juillet, nous ouvrirons une rubrique avec des leçons hebdomadaires du Lingala courant.

D'ici là, armez-vous d'un peu de patience. Vous ne serez pas déçue.

Mbote mingi epai ozali (Recevez nos salutations, là où vous êtes)

Aïcha DIOP
Dakar/ Sénégal
16 Mai 2006

Sujet: Remerciement
 


Bjr
Je vous remercie d'avoir pensé à moi pour me faire connaitre votre magazine qui en ouvrant ma Boîte j'ai vu Suka Epoque. Aufaite, j m demandé qui m'a envoyé un message avec comme objet suka Epoque.

Ca me permettra aussi de me réinitier en lingala pcq lire ou écrire n pas si facile.

Je vous quitte ici tout en vous encourageant de votre belle initiative que vous avez eu et que le Bon Dieu vous assistent.

Bnne journée

Réponse ya Rédaction


Chère Aicha,

merci de l'accueil que vous avez faite à notre Magazine!
Merci aussi pour les encouragements. Et que le Bon Dieu vous assiste aussi!

Mbote mingi

Bokote
Kinshasa/ RDC
12 Mai 2006

Sujet: Suka Epoque
 


Bonjour cher magazine,
namoni clip oyo ya semena botieli biso, mais préoccupation na ngai ezali ya koyeba soki mokolo nini ba CD na ba revues ya bande dessinée ekokoma disponible awa na Kinshasa/RDC. Nini tokoki kosala po tokoka kozua yango?

Bien à vous

Réponse ya Rédaction


Ndeko Bokote,

topesi yo merci mingi po na mokanda na yo.
Tozali naino na masolo ya bobongisi (négotiations), po Magazine Suka Epoque ekoka kokomela bino kuna na Kinshasa.

Soki ezali kowumela ezali se po esika ya malonga naino emonanaki te.
Na lisungi ya Agence WBA, oyo ezali kosala elongo na biso (collaboration) nde bozwi na mokolo ekoya magazine Suka Epoque na Kinshasa pe ba CD ya artiste Bernard Mayo.

Bokozwa yango po na tango moke (provisoirement) na adresse oyo totieli bino awa, po na Kinshasa.

Mbote mingi epai ozali.


Chiki
canadahi
10 Mai 2006

Sujet: Ba masolo
 


Mpote, na bino nioso
nalingaki kaka koyeba
soki, to kozua ba, suite , yabamasolo mosusy,
mokolonini.
merci, mingi na bino pe na bato nionso oyo batindaka masolo na bango ,

aurevoir

Réponse ya Rédaction


Mbote mingi na yo ndeko Chiki.

topesi yo pe merci mingi po na mokanda na yo.
Ba suite ya ba masoklo oyo ezali awa na Internet ezali kozela kaka bato oyo bakomaki yango po ba continuer lisolo na bango, soki naino ekomi na suka te. Biso pe tozali kosepela mingi na masolo bazali kotindela biso po na batángi nyonso ya Magazine Suka Epoque.
Po na lisolo oyo ekomami na ndeko Bernard Mayo, yango ekolandema (continuer) na mikolo ekoya. Po Ye azali kolengela Numero ya sika ekobima na suka ya Sanza oyo.

Zala na mwa patience moke, okosepela.

Mbote mingi epai ozali.


PS: Na esika ya kokomela biso mokanda, soki omoni tokomi: "Ekólo", elingi koloba "Pays", epai ovandi.
Ózala moto ya "Nord" to ya "Sud", Mukongo, Mungala, Muluba, Muyanzi etc...to pe ózala ndeko na biso ya Angola to ya Congo-Brazzaville to ya Gabon to pe ya mboka mosusu, Esengo nabiso ezali mingi komona ndenge ba ndeko nyonso bozali kokomela biso.

Po ete na esika oyo, "mopaya" azali te. Ezali esika na bino.

Kally wa Kaliba
coventry
10 Mai 2006

Sujet: Kosomba magazine nabino
 


Ezali mbala ebele nazali kokota awa na pesi bino mapamboli pe nasengi na nkolo atanbusa eloko oyo ekende mosika.

Nazali kosepela na ba masolo na bino mais nayebi tse wapi nakoki kosomba yango pe soki bo tindelaka batou na courier pona biso batou tozali na mboka ya ngambu.

Réponse ya Rédaction


Ndeko Kally,
tozali kobongisa ndenge ya kofungola librairie en ligne. Kobanda na suka ya sanza oyo (fin Mai), bokoki kosomba directement awa na Internet, pe biso tokotindela bino ba revues na Post (courrier).

Kasi nyonso wana toko expliquer bino malamu, ndenge ya kosala.

Mbote mingi epai ozali.


10 Mai 2006

Sujet: Suka Epoque
 


Salut c'est Dina
Merci pour le message et surtout restes branché sur le www.selectfm.com .
Je te reponds sous peu.
A bientôt

Réponse ya Rédaction


Nous restons branchés!
À bientôt Dina!

kaysha memanpoya
10 Mai 2006

Sujet: Suka Epoque
 


Merci beaucoup pour les nouvelles!

Réponse ya Rédaction


Merci à vous!

Mireille
10 Mai 2006

Sujet: Suka Epoque
 


ok pas de probleme ont va collabore ensemble pour
faire contunue notre site de suka-epoque
a savoir que moi je ne sais pas parle lingala vous
allez mes aprendre parle lingala sur ces site.

Bon travail et bon courage merci by

Réponse ya Rédaction


Merci Mireille!

à bientôt!


HERVE KASHAMA
10 Mai 2006

Sujet: Suka Epoque
 


L'association vous remercie et vous encourage
à bientot

Réponse ya Rédaction


Merci beaucoup
à bientôt

Puati Nsaca Legrand
Péruwelz-Tournai / BELGIQUE
10 Mai 2006

Sujet: Melesi Na Bino Banso
 


Na tondi bino botondi, na ntina ete bo tie bililingi pona kotala, na ko senga na bino soki makoki ezali botia bililingi tango mua molayi. Longonia na bino.

Lipuepue na bino banso na kati ya lisanga ya Suka Epoque

Réponse ya Rédaction




Cyril Bille
10 Mai 2006

Sujet:
 


bonjour j'ai bien reçue votre mail je me permet de vous donnez quelques
photos de moi pour figurer dans votre magazine merci a tres bientot

ps: faites mois signe du tretement en cours merci

Réponse ya Rédaction


Bonjour cyril bille


Tina
Birmingham/Angleterre
10 Mai 2006

Sujet: am verry happy for that
 


Na moni ba film pe ba ecrire na bino je suis vraiment tres contente nakosepela soki botie ba film na internet pona efacilite batu batala ka yango. merci pona bon ides vous etes toujour le meilleur bo continuer na mosala na bina nzambe akosunga bino .

bye c'est bebe cherie Tina Izuba

Réponse ya Rédaction


Ndeko Bébé chérie Tina Izuba,
Tosepeli mingi ndenge okomeli biso.

Tokozala kotia ba Filme (ba extraits to biténi) awa na Internet, po botalaka yango.

Mbote mingi na epai ozali, na Birmingham.

Otikala malamu.

PS: Na esika ya kokomela biso mokanda, soki omoni tokomi: "Ekólo", elingi koloba "Pays", epai ovandi.
Ózala moto ya "Nord" to ya "Sud", Mukongo, Mungala, Muluba, Muyanzi etc...to pe ózala ndeko na biso ya Angola to ya Congo-Brazzaville to ya Gabon to pe ya mboka mosusu, Esengo nabiso ezali mingi komona ndenge ba ndeko nyonso bozali kokomela biso.

Po ete na esika oyo, "mopaya" azali te. Ezali esika na bino.

Alain Dambana
Montréal, Québec
Canada
10 Mai 2006

Sujet:
 


Natondi na esengo na ndenge nazui mokanda na bino na kati ya E-mail na nga.
Je suis très content de recevoir votre message ainsi que votre site, vous faites quelques chose qui mérite qu'on vous jete des fleurs, je suis fière de vous.

Je tiens à vous informer que je suis concepteur web vivant Montéal au Canada, voudriez-vous que pour votre publicité, puis-je placé votre site internet sur le site de la communauté Congolaise de Montréal? ainsi qu'un site de la musique Congolaise au Canada à l'adresse www.freewebs.com/african-music

Encore une fois félicitation.

Nzambé abatela bino bokende liboso po na lokumu ya mboka na biso.

Wa bino ndeko Alain Dambana
Montréal, Québec
Canada

Réponse ya Rédaction


N
deko Alain Dambana.

Ya libosó, Merci mingi.
Tosepeli mingi na mokanda na yo. Pe ezali kopesa biso makasi, tango tozali kozua ba reactions to biyano ya malamu epai ya bandeko na biso po na mosala tozali na yango.
Po na likanisi na yo, ya kotia biso na Site ya communauté ya ba Congolais na Montréal, pe na Site wana ya miziki, ezali likanisi malamu penza.

Tosepeli mingi.
Po mosala oyo ekende liboso, esengeli biso nyonso totia se maboko. Yango wana lisungi (aide) nyonso Bandeko na biso bozali kosalela biso ezali lisalisi monene po na mosala na biso.

Ótikala malamu
Mbote mingi na yo epai ozali

Afonso Pululo
Angolais/Pais bas-Arnhem
03 Mai 2006

Sujet: Botondi pona eyano nabino na mokanda na ngai ya le 28-04-2006
 


Bandeko bakomi ya magazine congolais,

natondi bino ya mingi pona eyano na bino bopesi ngai na mokanda oyo na komelaki bino ya le 28-04, pe komona yango na esika ya masolo, vrement napesi bino ba merci ya mingi, tika nzambe ayeba kobatelaka bino. Pona lisolo na ngai oyo ya liboso nakanisa boyebi yango malamu na titre, Pona nzela ya poto bondeko ekufi. Tokomema lisolo oyo molayi na mikolo ezali koya.

Merci ya mingi wa bino Alpha.'

Réponse ya Rédaction


Ndeko Alpha,

Biso pe totondi yo botondi, na kombo ya batangi nyonso ya Magazine Suka Epoque. Esengo ezali na biso, tango tozali kotanga masolo oyo bozali kotinda. Pe batangi ya Magazine Suka epoque pe bazali na esengo ya kotanga masolo yango.
Yango wana biso tozali kopesa bino melesi po na ndenge bozali kosangana na biso po na kosepelisa bandeko mosusu nyonso, oyo bayáka na esika oyo. Po awa ezali nde esika na bino nyonso.

Totindeli yo mbote mingi na esika ozali, na pays-bas.

PS: Na esika ya kokomela biso mokanda, soki omoni tokomi ete "Ekólo", elingi koloba "Pays", epai ovandi.
Po ezali na litomba mingi te, po na biso koluka koyeba soki ndeko oyo azali kokomela biso azali ya "Nord" to ya "Sud", to pe azali ndeko na biso ya Angola to ya Congo-Brazzaville to ya Gabon to pe ya mboka mosusu.
Esengo nabiso ezali mingi komona ndenge ba ndeko nyonso bozali kokomela biso.

Po ete na esika oyo, "mopaya" azali te.

Sonakiese André domingos
Stockholm/ Suède
29 Avril 2006


Sujet: Soutiens morales
 


Nazali kokomela bino po ete , nazali na projet ya BD . Na yango nalingi ko yeba coût na yango . Kobanda na ebandeli ti na production ya 3000 ou 5000 exemplaires.
Nazali na manuscrit nde nazali koluka dessinateur moko ya malamu oyo penza ayebi mosala oyo .
Merci lisusu na ndenge oyo oko rèpondre ngai .

sonakiese A.D

Réponse ya Rédaction


Ndeko Sinakiese,

Melesi po na motuna na yo.
Eyano na biso ezali boye: Talo (coût) ya BD ezali na ndenge mingi. Eza ko dépendre na ba moyens oyo yo olingi kotia po ekoka kosalema. Pe lisusu monene ya mosala yango, kobakisa lisusu bisaleli (matériel). Sima na yango okotala soki ekozala na moyindo pe pembe (noir et blanc), to pe na langi (en couleur); Okotala lisusu monene ya buku (dimension) pe motángo ya nkasa (nombre ya ba pages). Soki Ekomi na suka, Wana nde ekomi likambo ya Bobimisi (édition), pe Ebetelo ya mikanda (Imprimerie).

Po na ntalo ya Imprimerie, yo moko okotala Imprimerie oyo olingi. Bango nde bakoyebisa yo ntalo ya kobeta manso na mikanda (talo ya ko imprimer).

Soki Mposa na yo ezali ya ko kommander BD epai na biso, okoki kokomela Service ya redaction na biso na adresse oyo: redaction@suka-epoque.de

Tokanisi, tokokaki ko yanola (répondre) yo na motuna ya yo.

Mbote mingi na epai ozali

Marius Banda
Austria
28 Avril 2006


Sujet: Soutiens morales
 


Je tiens a vous soutenir moralement et spirituellement a travers l"oeuvre si riche qui preserve le patrimoine de notre civilisation et nous plonge au sommet de nous meme en reveillant nostalgiquement nos passées dans nos pensées.Au moment ou notre pays sombre dans l"impasse ,que dirais-je "O tempora O mores".
Que le Dieu de nos ancetres répandes a flots sur vos tetes tous ses bienfaits;et surtout qu"il vous donne la conaissance de la sagesse et l"instruction pour comprendre les paroles de l"intelligence

Réponse ya Rédaction


Cher Marius Banda,

Merci beaucoup pour le soutien que vous nous accordez.
Nous en avons grandement besoin!

En effet, Notre espoir, en initiant ce projet, est de replonger nos compatriotes ainsi que tous les locuteurs du Lingala, mais aussi ceux de diverses langues de notre cher pays dans les richesses de nos propres cultures africaines en général, et congolaises en particulier.
Notre message: Il doivent en être fiers. fiers de parler nos langues nationales (Le Lingala, le Tshiluba, le Swahili, le Kikongo)
Aujourd'hui, à l'heure de la mondialisation, où les cultures -élément essentiel de l'identité des peuples- sont ménacées par l'uniformisation dictée par les plus forts, pour des raisons purement économiques, nous nous voyons contraints, pour préserver notre héritage culturel, de prendre des initiatives dans le but d' éveiller la conscience de nos compatriotes. D'où le projet Suka Epoque.

Ce projet serait vain si chacun n'y mettait pas la main:
un petit geste suffit pour faire avancer la machine: en parler.
Il faut en parler.
Afin que nous puissions vraiment exister, débarrassés de la peau de "l'éternel colonisé" qui a, en permanence, honte de ses origines.

Mbala ya sima, meka kokomela biso na lingala. Ekosala bana-mayi bilengi moko boye...

Afonso Pululo
Hollande
28 Avril 2006

Sujet: Po na nzela ya poto bondeko ekufi
 


Muana mobali moko awa na bakili,aya poto depuis 1992 aye koyamba leki naye yamuasi apres 7ans,leki yamuasi akomi epai ya ndeko naye yamobali akomaki kolukela yaya naye makambo mosusu oyo ndeko yamobali akokaki kosalate,boyinani ekoti nakati ya ndako na semeki naye pe na ndeko naye yamobali,soki ayoki ndeko naye avoyage akomakopesa basango yamabe na mboka epai ya tatamuasi ya ndeko yamobali maman oyo aboti ye, pe na bandeko oyo ye abotami nabango,yango natuni na bino bakomi ya magazine congolais,oyo ndeko yamuasi azali kosala ezali nini,Developes

Réponse ya Rédaction


Ezali kisakata (bisalela)

NB: Ndeko, Afonso Pululo, lisoló na yo, totié yango na esika ya masolo. Kasi tomemi yango lisusu awa, na esika ya mikanda po na kopesa yo eyano (réponse) na motuna na yo. Soki moto alingi atuna biso motuna, esengeli atuna yango na nzela ya courrier.
Po na esika ya masoló, tozali na eyano te, pe eloko ya kobakisa te po kuna ezali esika epesami po na bino po na kokomela batángi ya Suka-Epoque masoló, ndenge bolingi. Ezali esika totieli bino po ya komeka makoki na bino na oyo etali bokomi (écriture littéraire, narrative) na Lingala.

Totindeli yo mbote mingi epai ozali, na Hollande

Marcelo Kazadi
Lisbonne/ Portugal
27 Avril 2006

Sujet: Correction
 


ya liboso, na tondi bino mpona "site" na bino.
solo, na sepeli na ngo.Tina ya mokanda na ngai ezali mpona ko "corriger" signification ya perseverance na lingala.
Na lingala. Perseverance = Bompikiliki.

Natondi bino

Réponse ya Rédaction


Ndeko Marcelo,

melesi mingi, mpo ya mokandá na yo.
Totóndi yo mingi mpo ya libongisi (correction) oyo osali po na kosunga biso, mpe ndeko Didi, na bolukáká ntina to pe mbóngólá ya Liloba oyo: Persévérance.

Tomoni solo ete ozali moyebi ya lingala, se ndenge bilenge balobaka lelo ete "na ndenge ya muke tse".
Ya solo, se ndenge olobi, "Persévérance" ekoki mpe kobóngolama ete Bompikiliki (Tala pe na dikisionére na biso)

Ezali mwa libúngá ete tobosani kotánga pe liloba yango "bompikiliki" na ndimbola oyo topesaki na wa biso ndeko Didi.
Kasi na lingála oyo ya Makanza (tala na Biblia ya Lingála) Persévérance ezali kobóngolama mingi ete: Etingiá.

Kasi bo elobi yo, Bompikiliki pe Etingiá ezali malamu po na mbóngólá ya liloba "persévérance".

Tolíkí ete tokoki koyanola na esika wana. Soki liloba lisusu lizali, okoki pe kopesa biso, po na kokokisa dikisionére na biso.

Totondi yo solo botondi.
Pe tokosepela kotanga yo lisusu na esika oyo.

Mbote mingi epai ozali

DIDI
ARTHUR/ CANADA
25 Avril 2006

Sujet: Motuna
 


Ba ndeko ba bolingo,

Natondi bino botondi mpo na mosala mwa bino.
Nazali na mituna mibale,nalingi bolimbolela ngai maloba maye:

1-Patience (na lingala balobaka nini???)

2-Perseverance

Nakolikia te nde nazwi eyano na mituna mia nga mpe nde mosala mwa bino etamboli malamu..Nzambe mokonzi abatela bino..

Wa bino DIDI

Réponse ya Rédaction


Ndeko Didi,

Ya libosó mbote mingi epai ozali.
Po na mitúná na yo, tokoki kopesa yo eyano boye:

1. Ndimbola ya liloba oyo "Patience", soki tozwi yango na ntina ya "longanimité" tokoki koloba to kobóngola yango ete:
- motema monéne
, to motéma molayi

Na mosika, ekoki kozwa mpe lisusu ntina ete:
- motéma bobóto
(générosité).

Soki pe totali liloba yango -"patience"- na ntina ete: "calme avec lequel on attend ce qui tarde à venir", wana tokoki pe kobóngola yango ete:
- motema ya bozili (bozeli).

2.- Po na liloba oyo "Persevérance", tokoki koloba yango ete: etíngiá
Kasi tango mosúsu ekoki pe kobóngolama ete : Mpíko

Yango wana verbe "persévérer" ekobóngolama ete = koyíka mpíko,
to pe lisúsu : kozala na etíngiá.

Kasi na lingála ya lelo, okoyóka ebele ya bato bakobóngola Liloba wana "persévérence" ete: moléndé.
Ezali se po liloba "etíngiá" mingi bayebi yango te.
Liloba oyo "moléndé" na lingála ya solo elingi nde koloba "courage".

Kasi lokola liloba "persévérance" ekoki pe kozwa ntina (synonyme) ya "courage", tokoki kobóngola "Persévérance" = moléndé

** Maloba masusu ya fransé, soki olingi ko bóngola yango, ekozwa mwa maloba mibale to misato. Elingi koloba, na lingala, mbóngólá (traduction) na yango ekopesama nde lokola ndimbola (explication) mobimba po na liloba (mot) wana.

Motindo oyo ezali kaka po na Lingala te, ezali po na minoko to makótá mingi se bongo, na tango ya bobóngoli. Po ete lokótá na lokótá ezali na oyo ya ye méi ntina-miké (nuances) oyo okokúta na minoko misusu te.

Po monoko na monoko ezalaka na mwa ntina-mike (nuances) oyo ekoki kobóngolama (être traduit) na liloba kaka moko te.
Yango wana na ntango tokobimisa dikisionére ya Fransé -Lingála, bokokuta na esika ya maloba mosúsu ya Fransé, mwa ndimbola na maloba mibale to misato, na esika ya mbóngólá (traduction).

Tozali kosenga na bino, bopesa biso pe maloba oyo ezangi na diksionére na biso po tokokisa (compléter) yango. Yango ekosunga bandeko mingi pe lokola.

Tokanisi ete tokokaki kosalisa yo na motuna na yo.

Na bosúkisi, otikala malamu.

Mbote mingi epai ozali

Trezor Nsunda
Allemagne
25 Avril 2006
LIYEBISI
 


liwa ya elengé Dominik Kuamadio

Na mokolo ya 14. Avril policier moko ya mbóka Dortmund Na Allemagne abetaki masasi na mbala mibale, epai ya ndeko Dominik Kuamadio (elengé ya mbula 23).
Pe ndeko Dominik akufaki na esika wana.
Ezalaki na sima ya koswana na motéki (commercant) moko, ye azalaki na Kioske na ye.
Tango bazalaki koswana, ba mbila (ba policiers) bayaki noki noki.
Ba temwé ya likambo yango bayebisi boye:
Tango mbila ayaki, apelisaki mwinda ya likama (gyrophare) te. Tango Dominik amoni boye, abimisi mbeli, pe ayaki na esika ya motuka yango, mbeli na maboko.
Kasi akokaki pe kozokisa moto moko te, po ba talatala (vitre) ya motuka ya mbila ezalaki ya kokangama.
Tango alingaki kokima, mbila oyo azalaki mokúmbi ya motuka yango, akitaki na motuka, abimisi mondoki (revolver) pe abetaki ye masasi mbala mibale.

Lisasi ya libosó, tango ezwi ye, akweyaki pe lisasi ya míbalé ezwaki ya na makolo.
Na boyókáká litátoli to témoignage ya Bob Makitu, moninga ya Dominik, Ye Dominik azalaki na ba projets minene po na vie na ye, pe po na avenir na ye

Eleki mikolo mingi te, awutaki kozwa mokandá (po ya kofanda na pótó).
Akomaki na likanisi ya kosilisa ya ye kelasi.
Útá liwa ya elenge oyo, mwana ya Congo, baninga na ye bazali kokutana na esika moko -salle moko- na mboka Dortmund, po na kolobela likambo yango, pe koluka ndenge ya kosangisa mbongo po na kotínda ebembe yango na mboka

"Epai ya bokundi ebembe bazali kosenga 10.000 €. Bakonzi ya service social bapesi kaka 3000 €. oyo etikali, il fot toluka kokokisa yango". Wana maloba ya Makitu.
Bob, na baninga mosusu ya moweyi, balingi kokita na bala-bala na mokolo ya 22 Avril po na kosala mwa "manifestation" po na kolakisa ete police asalaki mabe.

Motuna na bango:
Esengelaki ya solo ete Dominik ákúfa?
Koleka wana, bazali lisusu kosenga ke ba mbila bazwa formation to boyékoli ya malamu po ete makambo ya boye ebandela lisúsu te.

Soki ezalaki ba mbila oyo bazwaki boyékoli malamu, makambo ya boye, lokola liwa ya Dominik, ekokaki kosalema bongo te. Elingaki kozwa solution na ndenge mosusu.


Nanu Momabila
Neuss, den 21.04.2006

bobóngoli úta na lokótá ya allemán esalemi na Redaction ya Suka Epoque

Réponse ya Rédaction


Redaction mobimba ya Suka-Epoque esangani na bino nyonso, Baninga pe bandeko ya Dominik, na mawa oyo.

Nkolo Nzambe áyamba molimo na ye na bobóto, pe ápésa kimia na libóta na ye nyonso.

Lianza
Nederland
25 Avril 2006

Sujet: longonia
 


Napesi bino longonia, mpo ete eloko oyo bosali, kaka lelo nde moninga moko nde moto alakisaki nga monkanda na bino,nzakomba apesa bino bolingo mpo eloko na bino ekende liboso. Ndenge nini nakoki kozuaka suka epoque awa na hollande?
papa nzakomba abatela bino na mosala na bino.

Wa bino ndeko lianza.

Réponse ya Rédaction


Ndeko Lianza,

melesí mingi po na mokandá na yo, pe na ndéngé opesi biso makasi po ya kokoba se kokoba na mosálá oyo tozali na yango.
Mpo na kozwa magazine na biso na Hollande, naino tozwi esíká ekoki po ya kokomisa yango kuna te. Soki yo oyebi boutike to magazén ya bana mboka, epai bakoki koteka yango
, yebisa biso. Tokosala makasi po na kokutana na mokóló ya esíká yango, po na kotála ndenge tokoki kosála po ábanda kozwa mikanda na biso.

Mbote mingi na Nederland, epai ozali.


Papy Mamona
Lausanne/ SUISSE
24 Avril 2006

Sujet: Félicitation
 


J'ai bien aimé votre magazine continuez dans la même direction vous irez loin dans la vie, et puis si vous avez des news, j'aimerai recevoir vos informations dans mon email svp. Merci de votre gentilliesse.

Recevez mes salutations à tous et toutes

Réponse ya Rédaction


Cher Papy Mamona,

C'est un vrai plaisir de vous lire.
Merci beaucoup pour les encouragements. Nous en avons bien besoin.
Nous ne manquerons pas de vous faire parvenir nos news par votre courriel.

Bonne journée et au plaisir de vous lire bientôt.

Mbote mingi esika ozali.

PS: Mbala ya sima, meka kokomela biso pe na lingala. Ata ya moke, ekosala biso plaisir mingi...

Anne-Marie Mabanda
France
20 Avril 2006

Sujet: ko tonda bino bo tondi
 


Na tondi bino bo tondi na ndenge bo zui likanisi ya ko sala site eye.

Nkolo a pambolama.

Réponse ya Rédaction


Wa biso ndeko Anne-Marie Mabanda,

Melesí mingi,

Totondi yo pe botondi, po na ndenge okomeli biso. Yango ezalaka esengo mingi epai na biso, soki tozali kozwa mikanda na bino batángi ya Suka Epoque.

Nzambe apésa biso nionso makasi po totombola mosala oyo tozali na yango.

Tangaka biso pe pesaka lisoló ya Suka Epoque epai ozali.

Mbote miingi na esika ozali. Kimia na Nkolo na biso ezala na yo.

Vivien
Strasbourg/ France
17 Avril 2006

Sujet: Encouragements
 


Bonjour,
Je comprends bien le lingala je sais le lire, mais je ne sais pas l'écrire. Je suis Congolais de Brazzaville et je viens de tomber sur votre site comme par hasard. J'ai été comme piqué par un moustique et j'ai tapé bandeko dans yahoo search.
C'est une agréable surprise que de faire votre connaissance.
Eh bien, dans notre monde de la mondialisation où l'économique influence le culturel, l'Afrique court un grand danger de disparition. Il faut donc des personnes de bonne foi et animées de bonne volonté, comme vous, pour ramer à contre courant de la logique des choses afin de brondir les richesses de nos cultures.
Notre oralité peut aussi passer par le livre, et surtout par les BD. C'est ce que vous faites. Je ne peux que vous en féliciter. Votre oeuvre fera du lingala un pôle d'attraction dans la mesure où la qualité des dessins donnera l'appétit d'apprendre le lingala à ceux qui ne le comprennent pas.
Moi-même, je me suis déjà décidé à me procurer un dictionnaire pour parfaire mon lingala. J'ai été à Kin, j'ai beaucoup aimé le lingala de Kin. Mais le milieu dans lequel j'ai vécu ne m'était pas favorable pour bien apprendre.
Ayant grandi à Bacongo Brazzaville, le lari étant la langue de ce quartier, le lingala ne me paraissait pas une préoccupation. Mais ici en Europe, on a toujours envie de s'identifier surtout quand on rencontre quelqu'un avec qui on peut parler la même langue.
Je rencontre beaucoup de kinois ici. Mais mon lingala me fait parfois honte. Je me sens comme hybride.
Merci car ce que vous faites me touche dans ma conscience. Et si cela pourrait produire le même effet chez d'autres!

Félicitations
et cordiales salutations à toute votre équipe.
Autant votre lingala est beau, votre français est impeccable; car j'ai parcouru les courriers des lecteurs et vos réponses.

Na tondi se botondi na maye bozali kosala. Nzambe apesa bino makoki po bo sala te lingala e rayonner na mokili mobimba.
(J'espère que c'est déjà bien; à vous de noter)

Vivien

Réponse ya Rédaction


Merci mingi ndeko Vivien,
Tosepeli mingi kotánga mokandá na yo.

Ezali kaka ndenge olobi. Na tango oyo ya bosangani ya bikólo nyonso ya molóngó (mondialisation), esengeli na biso kobunda makasi po ya kobatela bonkoko na biso. Pe koleka lisusu (surtout) kobaleta makótá to minoko ya mboka na biso. Ezali etumba ya mokolo moko te. Ezali pe etumba ya moto moko kaka te.

Biso banso tosengeli kotia maboko, po soki bongo te, lokola yo moko olobi, Identité to bomoto na biso ekolimwa se kolimwa. Mondele akosepela mingi komona biso tozali koloba lokótá na ye. Ezali mabe te. Kasi soki tokebi te, mabotá ya Afrika oyo ekoya (les africains des générations futures) bakoyeba bonkoko na bango te. Yango wana mosala tozali kosála.

Lingala na yo ezali malamu.Yango ezalaka se boye: moke-moke, tango ozali koloba pe kokoma, nde mbóngwáná malamu (amélioration) pe ekomonana.

Tokosepela kotangaka mikanda na yo, tango na tango.

Topesi yo mbote mingi epai ozali na Mboka France.


Ngogang Rostand
Berlin / Allemagne
15 Avril 2006

Sujet: ezali pona kosomba SUKA-EPOQUE
 


Salut la redaction
Je suis toujours ravis de me raprocher des cousins pour savoir comment
avance les traits de l'histoire que dont nous aujourd'huit nous somme les
acteurs.
Je suis vraiment triste de ne pas pouvoir lire mais je le sent. C'est tout
aussi important car lire sans le sentir au fond de soit serait peine perdue.
Je travaille dans le multimediat et je viendrais dans un future proche en
suport à vos traveaux avec les miens toujours dans l'idée de tracer le
parcours des africains.
A tous les cousins : Avant de prétendre connaitre l'autre il faut se
connaitre soi meme.

Ngogang

Réponse ya Rédaction


Bonjour cher Ngogang,

C'est pour nous un plaisir à chaque fois que nous te lisons.
Les travaux à notre niveau avancent bien. Lentement, mais sûrement..
La vulgarisation se fait à pas de tortue, Mais les résultats sont là, palpables. Déjà nous nous attelons à la finalisation du dictionnaire Français-Lingala qui sera mis en ligne sous peu.

Dans les prochains jours, nous mettrons -enfin- en ligne une rubrique qui sera consacré à un cours hébdomadaire du Lingala courant.

Au plaisir de te lire bientôt

Salutations fraternelles

Puati Legrand
Péruwelz/Tournai Belgique
14 Avril 2006

Sujet: Koyekola Lingala
 


Mbote na bino nionso ba tangi ya Suka - Epoque.

Ezali malamu ko yeba ba ndingá mingi, yango wana na zali koyebisa ba oyo balingi kobongola lolengé na bango ya koloba mpe kokoma lingala. Botika ko loba lingala oyo ya tango ya lelo, koyoka nsoni te koloba lingala na miso ya bato, lisusu tunaka na ba oyo ba yebi koloba lingala. Eko zala malamu kosala makasi mpo oyeba, luka bibilia ya lingala, to ba buku misusu ba koma na lingala, ndakisa mikanda ya ba "Témoins de Jéhovah" na lingala, kokamata lingala ya ba katoliki, lingala ya makanza, etc ... Osangisi ti kino okomona mbonguana kati na elobeli na yo.
Bo kende na site oyo ya lingala : www.perso.wanadoo.fr/pascal.grouselle .
Botala lisusu awa : www.lingalabooks.com ezali na lokotá ya Angele - Lingala (anglais - lingala). Botikala malamu tokomi nde mbala ya sima,

Wa bino ndeko Puati Legrand na Péruwelz / Tournai BELGIQUE.

Réponse ya Rédaction


Ndeko Puati Legrand,

Melesí mingi.
Totóndí yo botóndi mpo ya mokandá okomeli biso pe batangi nyonso ya Magazine Suka Epoque.

Ya solo, ezali na ntina monene koyeba kopesa kiló na bonkoko na biso moko, na boyékóláká lingála pe minoko misúsu ya mbóka na biso.

Po na maye matali lingála, totiaki awa na esika oyo, Eténi to Rubrike oyo: "Bisika misúsu ya malongá"; Awa bokokuta ba adresse mingi, epai bandeko nyonso bakoki kozwa ba buku to mateya ya Lingala.
Esengo ezali na biso pe batángi ya Suka Epoque, po na kotángaka ba ndambo ya Lisitwale to masapo oyo bozali kokoma awa po na batángi nyonso.

Yango ezali pe nzela oyo ekoki kosunga ebele ya bandeko na biso oyo bazali na Bipai binso, na mboka na biso to pe na mbóka ya mopaya, po na kotanga lisusu na lokótá ya Lingála.

Yango wana tozali na esengo tango nyonso ya kotanga mikanda na bino.

Koméláká biso tango na ntango pe pesaka lisoló Ya Suka-Epoque epai ozali.

Mbote miingi na esika ozali.

Papa Kopere
Bruxelles/ Belgique
09 Avril 2006

Sujet: Longonya na mapinga na bino
 


Bandeko saï na motema pona na kotanga bikomeli wa bino.
Liyekoli bopesi na ba kongolais na mboka mopaya ete tokoki na malamu kotombola lokumu wa lokota mwa biso ya lingala.

Longonya na mapinga na bino.

PAPA KOPERE


Réponse ya Rédaction


Papa Kopere,

Merci mingi po na mokanda na yo.
Mosala na biso ezali monene, pe ekoki kosalema kaka na lisalisi na bino nyonso.
Yango wana tozali na esengo tango nyonso ya kotanga mikanda na bino.

Tangaka biso pe pesaka lisoló na biso epai ozali.

Mbote miiiingi na esika ozali.

YALOLO SHUAMI
France Ville de Melun
03 Avril 2006

Sujet: Liyebisi
 


TO ZALI KO YEBISA NA BA TO NIOSO TE TO BIMISI DVD MOKO TITRE NA YANGO EZALI "ZAIKO, UN NOM UNE HISTOIRE" EZALI NA BA NZEMBO LOKOLA MOSINZO, MT LA VERITE, AURELIE, ONASSIS YA ZAIRE, ELO PE YA NDENGE NA NDENGE.

PO NA KOZUA DVD YANGO BA KOKI KO BENGA YALOLO NA
TEL.: 00 33 6 29 80 56 36


Réponse ya Rédaction


Merci ndeko Yalolo Shwami,

Liyebisi na yo eleki. Tokolikia que batangi ya Suka Epoque bakoluka DVD yango, po banzembo otangi wana ezali kolakisa histoire mobimba ya Zaiko.

Mbote mingi epai ozali

la gloire
Hollande
30 Mars 2006

Sujet: toute mes felicitations
 


Merci suka na epoque pona likambo bosali prcq eza fierté na biso yako zala na mois place ya détente pona ko seka na pona ko apprendre surtout pona biso ba oyo to koli awa eza trés intéressant. sincrement ce trés rigolo merci

merci, la fille qui a de parole elalisaka te

Réponse ya Rédaction


Merci ndeko La gloire (La fille qui a des paroles elalisaka te),

Tosepeli mingi kozwa mokanda na yo.
tozali kosala kaka makasi po esika oyo ezala esika ya kokutana, ya kosolola, ya koyekola pe kokolisa makanisi, pe lisusu kotombola bonkoko (culture) na biso.

Yango wana, tokosepela mingi kotangaka mikanda na bino. Bópésaka biso pe ba kritike na bino , po tobongisa Suka-Epoque, po e kontinuer tango nyonso kosepelisa bino.

Mbote mingi na esika ozali.

Brazzos Kilete
Angola
30 Mars 2006

Sujet: Naluki Suka Epoque
 


Mbote na bino.
Nasepeli ndenge bozwi idée ya kosala enfin eoko moko ya bien, po na kosepelisaka biso. Motuna nalingi natuna bino: ndenge nini tokoki kozwa livre na bino awa na Angola?

Po natuni tuni partout, esika baza koteka Suka Epoque eza te. Est-ce que ezali kaka revue ya ba zairois (congolais) to pe biso pe tokoki kotanga yango. Si oui, alors po na nini awa na Luanda ezali te?

merci na bino.

C'est Brazzos, le Rambo de tout les Rambo

Réponse ya Rédaction


Mbote na yo, ndeko Brazzos (le Rambo de tous les Rambo).

Tosepeli na mokanda na yo, pe na motuna otuni biso.
Magazine Suka Epoque ezali kaka po na ba congolais te. Elingi koloba ke, moto nyonso oyo atangaka lingala, to pe ayekolaka lingala, akoki pe kotanga Suka-Epoque.
Po na likambo ya koteka Suka Epoque na Angola (Luanda), ezali likambo ya Organisation. Tozali nanu kobongisa ndenge ya kosala po tokoka kotinda ba revue ti kuna na Angola.

Bopesa biso mwa tango moke, tosilisa likambo yango.

Kasi na bozeláká, (en attendant) kobanda na poso ekoya, bokoki ko komander ba numéros oyo déjà esi ebimi. Tokotiela bino formulaire awa po na ba commandes bokosala.

Mbote mingi ya Suka-Epoque esika ozali.

Bob Mundi
Allemagne
30 Mars 2006

Sujet: Achat et félicitations
 


Merci beaucoup pour tout ce que vous faites. Je vous ai suivi sur radio panik et j'ai décidé d'acheter tous les numeros déjà parus. Quelles sont les modalités.
Moi j'écris des romans (malheureusement pas en lingala, je ne m'y connais pas bien. Avez-vous quelques adresses d'éditeurs à me proposer? Merci d'avance et bon vent!

Réponse ya Rédaction

 

Cher Bob Mundi,

Nous vous remercions de nous avoir écrit.
P
our répondre à vos demandes toujours nombreuses, nous avons décidé de mettre dans la rubrique "Distribution", au début de la semaine prochaine, un formulaire d'abonnement. Nous y mettrons aussi des conditions de paiement et d'envoi du magazine Suka-Epoque.
Soyez un peu patient.
Pour la deuxième question, je vous propose d'écrire à notre représentant en France, Mr Robert Wazi, qui est le patron des éditions Mandala.
Vous trouverez ses coordonnées dans la rubrique "Distributíon"/France.

Tikala Malamu

PASCAL MAKANGILU
Wuppertal/ Allemagne
27 Mars 2006

Sujet: ezali pona kosomba SUKA-EPOQUE
 


ya liboso na pesi bino mbote mingi nalandaki bino na radio panik pona mikanda oyo bozali kobimisa .posa nangai ezali nasombaka yango pona kotanga ,kasi esika nakoki kosomba yango ezali mosika na berlin nayebi te soki nakoki kosala ndenge nini? merci.

Réponse ya Rédaction


Ndeko Pascal,

Merci po na mokanda na yo.
Po na motuna na yo, okoki kosomba Magazine Suka Epoque:
Possibilité ezali kaka na virement bancaire, livraison ekosalema na sima ya mikolo minei (4).
Nanu totié ba conditions wana awa te. Kasi na bozeláká (en attendant), ke ba formulaires nyonso ekota awa, tokokomela yo na adresse na yo na i-mel (e-mail).

Tikala malamu.

Samba Mutumosi
Bruxelles/ Belgique
25 Mars 2006

Sujet: Suka-Epoque
 


Ba ndeko,

Na salaki découverte na bino par hasard na Internet.
En tout cas, nasepeli mingi, mingi, mingi.
Idée bozwi ezali malamu koleka. Nazalaki grand lecteur ya ba BD ya lingala, na Kin.
Lelo oyo na decouvrir yango lisusu. Epesi ngai nostalgie makasi.
Nakosala ndenge nini po na commander ba revues oyo esi ebimi? Abonnement ezali possible?

Bosala mosala malamu. Merci.

Réponse ya Rédaction


Ndeko Samba Mutumosi,

Merci po na mokanda na yo, pe na ndenge opesi biso ba courage ya kokóba mosala yango.
Na mituna na yo, po na ba revues oyo esi ebimi, reponse ezali boye:
Tozali na réprésentation na Bruxelles, na Agence WBA -World Business Agency.
Adresse na bango, tala na rubrike "Distribution", epai bokosomba Magazine na biso.
Po na abonnement, tozali kobongisa nanu, ndenge tokoki kosala (modalités de paiement et livraison) po bandeko nyonso oyo balingi abonnement bakoka kozwa pe Magazine, na ndenge ya sûr.

Na mikolo ekoya, tokotia formulaire ya abonnement awa, po moto nyonso akoka ko zwa abonnement na ye.

Merci mingi.

Douglas Kabamba-Ndangi
Berlin/ Allemagne
23 Mars 2006

Sujet: Coup de chapeau!
 


C' est tellement beau et rejoissant de lire la plus belle langue, le LINGALA à travers les bandes dessinées et les webs! Je vous encorage tres sincerment à aller plus loin avec votre entreprise!
Essayez aussi de diversifier les sujets et les themes les plus interessants stimuler l' envie de lire le LINGALA, car nous ne sommes pas habitués à cela. Et ca devient plus vite ennuiyant quand le sujet devient moins interessant...

Salut Douglas

Réponse ya Rédaction


Cher Douglas,

Merci Beaucoup,
Nous nous efforcerons de vous présenter des belles histoires qui vous tiendront en haleine. Lisez notre édition spéciale qui vient de paraître et reservez déjà le prochain numéro: vous ne serez pas déçu.

Merci pour les encouragements. N'hésitez pas à nous faire parvenir vos critiques et vos propositions pour nous aider à améliorer votre magazine Suka-Époque.

Merci.

Mbala ya sima meka kokomela biso pe na lingala. ekosala biso elengi moko boye...

Paul Kifuti
Londres/England
23 Mars 2006


Sujet: Pourquoi
 


Mbote na bino, bandeko ya Suka Epoque.

Nasepeli ya trop na revu na bino.
En tout cas bosali eloko moko, ezali kosala biso fierté po na kotanga yango pe kolakisa ba ndeko bosusu ya ba pays mosusu, biloko oyo ba congolais baza kosala.
Mais pourquoi bolingi kaka kosala ba histoire ya mikuse mikuse. Eza kotika bato na posa.
est-ce que moyen ezali te vraiment ya kosala ba histoire ya molayi oyo moto akoki kotanga à l'aise sans que atikalaka na nzala ya histoire?
pardon, botalela biso dossier wana. Félicitations mingi po na idée na bino.

Merci ya trop

PK

Réponse ya Rédaction


Ndeko Paul Kifuti,

Tozali kosala effort na coté wana po bato ebele baza kobenga biso pe kotuna kaka likambo wana. Tomonaki que, po na ko sepelisa bino nyonso, pe ko permettre que moto na moto azwa mwa eloko ekosepelisa ye, yango wana tozalaki na choix mosusu te, pe tolobaki totiaka ba histoire à-suivre.

Mais tosali pe série ya sika: "Vieux Ngwaben", ezali série ya ba histoires complètes, donc, tokozala kotia lisoló moko banda ebandeli ti na suka.

Merci mingi.

Mère Evé
Paris/ France
15 Mars 2006


Sujet: Vivement le numéro 4 !
 


Vivement le numéro 4 !

J'achète désormais par 5 exemplaires et je me fais "dépouiller" par mes amis à la maison, je suis obliger d'en garder un bien caché…

Bon courage pour la grammaire, ce sera une bonne chose d'avoir une alternative/un complément au bouquin de Dzokanga qui est très académique…

Réponse ya Rédaction


Mère Evé,

ton commentaire est une bonne pub pour convaincre les derniers "St-Thomas" qui hésitent encore à se procurer notre magazine...

Mère Evé
Paris/ France
9 Mars 2006


Sujet: Mbote na bino!
 


Mbote na bino !

Le numéro 3 de Suka Epoque est en kiosque !!!!
Par le plus grand des hasards, j'étais à Château Rouge en train de le réclamer le numéro 2 dans une boutique quand est apparu un homme qui faisait la distribution du numéro 3, tout en couleurs.
Toujours autant d'humour et de talent, BRAVO Beintch !!!!! J'ai commencé à feuilleter dans le métro, les gens me regardaient bizarrement comme je me retenais de rire…

Donc désormais on peut trouver Suka Epoque à Tout Kin, 82 rue Doudeauville, et aussi chez B-Mas au 60 de la même rue…

Réponse ya Rédaction


Merci mingi mère Eve.

Nous travaillons maintenant d'arrache-pied sur la grammaire du Lingála (version Suka-Époque), que nous comptons mettre en ligne dès le mois de Mai.
Parallelement nous préparons le numéro 4...


Mbote mingi epai ozali

Théo Longi
Paris/ France
5 Mars 2006


Sujet: esengo mingi po na kotanga bino
 


salut,
biso awa ba jours oyo malili trop surtout po na biso ba sinzili ya ekolo oyo to vandi soki boza na boule que BD na biso ezala présenté jour moko awa na capital international ya BD mboka na vandi, nga nakoki kosala ba demarche mais bomeka kokoma pe na lifanlança. Nga ville na vandi awa na france eza capital international ya BD angouleme.

merci

Réponse ya Rédaction


Ndeko Théo Longi,

Merci mingi po na mokanda pe likanisi na yo.
Limbisa biso po tokokaki te koyanola yo na lombangu ndenge esengeli.
Ya solo, ezali likanisi malamu penza; ke mokolo mosusu tolakisa pe mosala na biso na ba Festival pe milulu minene lokola Festival ya Angoulême.

Kasi likanisi na biso pe ezali surtout po na bana ya mboka na biso. Biso tango tozalaki kokola tozalaki pe kotanga mikanda ya monoko ya mboka. Ba revues lokola Ba "Jeunes pour jeunes", "Likembe", "Bilenge", "Le yaya", "Super As", "Djo ka", "Djo Ef"...

Kasi biloko wana ezalaka lisusu te. Kokoma na lopoto ezali likambo ya malamu. Pe ekoki kobota lifuti malamu (financièrement, c'est une bonne affaire).
Kasi biso tokanisi ke ekoki pe na Bana ya Congo, tobuka bikila oyo ezali ke minoko na biso ezali na valeur mingi te.

Ba Intellectuels na biso bakomaka kaka na Lifalansé. Soki akomi na lingala bakoseka ye... Pamba te, mindele balakisaki biso ke minoko na biso ezali ya basenzi, bato oyo bayekoli te, pe ekoki kokomama te.
Po bandima yo, ebongi koloba pe kokoma kaka na lifalansé, to anglé, to aleman, to japoné, to portugé.
Soki biso nyonso tolandi kaka nzela wana, oyo ya biso culture ekolimwa. Nani akotombola yango? Bazali kobeta tolo na yango po ezali bonkoko na bango. Ebongo, ya biso nini?
Ba Français bazali kosala nyonso ekoki po na lokótá to monoko na bango ezala. Biso pe, ata tokoloba Français, ebongi pe totombola oyo ya biso bonkoko (cultures), pe toyeba kobeta tolo na yango. Soki miziki ezali kobetama na lingala, po na nini littérature (bokomi) te?
Ba Chinois pe bayaki na Angoulême, balakisaki Ba BD na bango na chinois...Bato basepelaki mingi.

Yango wana, tolingi kokóba kaka na Lingala. Soki makoki ezali, tokomeka pembeni (en déhors ya Suka-Epoque) kokoma pe masolo na lifalansé. Kasi tokanisi ke ba mikanda ya francé ezangi te. Ezali bebo. Ba oyo balingi kotanga yango, bakokelela te. Kasi ba oyo balingi kotanga na lingála, bakosuka wapi soki biso pe tokoti lisusu na lopoto??
Soki tokobongisa makoki po ya bobóngoli (traduction) ezali likambo te, Kasi priorité na biso etikali kaka na lingala.

Merci mingi na yo, ndeko Théo Longi ndenge okaboli na biso likanisi oyo.
Mbote mingi, pe tikala malamu epai ozali na mboka Angoulême, na France

Debby Kalonga
Paris/ France
5 Mars 2006


Sujet: Félicitations
 


Chers amis,

C'est pour vous féliciter que je vous écris. C'est vraiment un plaisir et une fierté immenses que je ressens en découvrant votre oeuvre Suka Epoque.
J'ai découvert votre site par le biais d'un ami français. Un amateur du Lingala et de la musique congolaise.
C'est très interessant votre site et très instructif. Bravo!

Cela fait quand même chaud au coeur de constater qu'il y a des congolais qui font la fierté de notre pays et de nos cultures à l'étranger.
Qu'est-ce que je peux faire pour m'abonner à Suka-Époque?

Je vous souhaite bonne chance et bon courage!

Debby

Réponse ya Rédaction


Cher Debby Kalonga,

Merci pour vos encouragements qui nous vont droit au coeur.
Nous nous efforçons effectivement de mettre à la disposition de nos compatriotes un
site où ils peuvent non seulement se détendre, mais aussi apprendre et partager avec d'autres leurs connaissance du Lingala. Le site Suka-Époque, comme vous pouvez le constater est encore en construction.

Nous espérons d'ici peu mettre en ligne d'autres pages aussi interessantes sur le Lingala.

Pour ce qui est de l'abonnement, nous sommes encore en train d'étudier les modalités pratiques pour que nos lecteurs puissent s'abonner.

Merci


PS: Mbala ya sima meka kokomela biso na lingala. Ekosala biso plaisir.

Grégoire Kasa
Johannesbourg/RSA
4 Mars 2006


Sujet: Suka-époque
 


Bandeko na ngai,

Nasepeli mingi ndenge bozwi likanisi oyo, ya ko faire revivre biso lisusu na belle époque ya ba masolo ya Kin. Nasombaki revue na bino, par hasard epai ya masta moko tango nazalaki na Kin. etikalaki kaka exemplaire moko.
En tout cas, naleli bino danzé. Bo comprendre? Naleli bino foooooort!
Mais malheureusement naza kaka na numéro moko oyo. Nr 2. Eske nakoki pe kozwa numero 1 et puis na numero oyo ewuti kobima? Natali na Internet, namoni eza tout en couleur. En tout cas eza fin.

Naza kozela avec impatience!

Merci
GK

Réponse ya Rédaction


Cher Gregoire Kasa

Merci mingi po na motuna na yo.
Tozwi nanu partenaire ya sûr te na Afrique du sud. Kasi tozali ko négocier na Agence WBA, lokola bazali na ba Bureaux na bango na Afrique du sud, po bazala lokola ba représentants na biso kuna.
Pona motuna na yo etali ba numéro oyo tosi tobimisi, ba numéro nyonso oyo esi ebima, ezali. Pe moto nyonso akoki ko commander yango, soit directement epai bazali koteka yango, (epai bozali), to pe awa epai na biso, na nzela ya internet.

Kasi soki ba stock ya liboso esili, ekokoma mwa pasi po na kozwa ba numero ya liboso. Yango wana tokomaki na numero ya liboso que bobanda déjà ba collections na bino. Po kobimisa lisusu ba révues oyo esi ebima, ekozwa mwa tango mingi po tozali toujours ko préparer ba numero ya sika.

Merci pe tikala malamu epai ozali.

Guy Mokulu
Bruxelles/ Belgique
2 Mars 2006


Sujet: Mokako
 


Na ngonga eye moninga moko atindeli ngai esika bino bosemi na Internet. Na esengo mingi natamboli o ntei ya esika na bino.
Mokako swa. Liye bosali lizali likanisi lilamu mpenza. Kaka na ngonga eye nakopanza esika na bino ya bosemi na Internet na bayabani ba ngai banso mpo ete bango mpe bakoka kosepela. Mosala kitoko.

Wa bino ndeko,

MOKULU

Réponse ya Rédaction


Ndeko Mokulu
,

Melesi mingi po na ndenge otombeli biso mokako.
Esengo na biso ezali monene, na bomónáká lolenge bana' mboka bazali kosepela na biso elongo po na likanisi oyo.

Ndenge kaka towutaki koloba. ezali mosala monene. Tokokoka kokokisa yango kaka na lisungí na bino nyonso, pe na ba kritike na bino. yango wana ezali esengo po na biso, tango tozali kozwaka ba lettres to makomi na bino.

Melesi po na mokanda na yo, pe po na lisungi na yo, po ete Suka-Époque ekende liboso.

Tikala malamu epai ozwami, na mboka Bruxelles

Robert Suraki Watum
Congolais/Cologne
24 Février 2006


Sujet: Félicitations
 


Je viens de recevoir les infos sur vs de la part de Asimba Bathy. J'avais appris que vs êtiez en Allemagne par les témoins de Jéhovah qui m'avaient visité. J'aimerais juste vous féliciter pr le travail accompli. C ne pas facile, mais courage.

Réponse ya Rédaction


Cher Robert Suraki,

Merci pour vos encouragements.
Ce n'est pas du tout facile, comme vous dites. Mais avec votre soutien à tous, notre but sera atteint. Nous serons très heureux de vous voir contribuer à cette oeuvre par vos critiques, pour que Suka Epoque vive et fasse des émules. Nos cultures congolaises ont bien besoin de pareilles initiatives.

Merci beaucoup.

Mbala ya sima meka kokomela biso na lingála, ata moke. Kotanga mikandá na bínó na lingala esalaka biso mwa plaisir moko boye...

Freddy Mulongo
Seattle /USA
22 Février 2006


Sujet: Courage et merci
 


Cher Mayo
Je t'ecris depuis seattle aux Etats-unis ou je me trouve pour une formation. Je t'encourage vivement a continuer avec les dessins, je crois que ce plus que ta passion , c'est ton metier tu sais ce que tu dois faire.
Bonne chance.

Freddy

Réponse ya Rédaction


Merci beaucoup cher Freddy!

C'est effectivement plus qu'une passion. Après des années passés dans le Dessin-Animé, je reviens à mes premiers amours, la BD.
La BD congolaise -en langues nationales- doit exister!

Merci Freddy, pour ton soutien. Et pleins succès pour ta formation.

À très bientôt!

Bernard Mayo

Ngogang Rostand
Berlin / Allemagne
22. Février 2006


Sujet: Mes encouragements
 


Salut à vous cousins
Je ne parle pas et je ne comprend pas Congolais c-a-d , je ne peux pas lire mais je vous avoue toute mon agreable surprise et ma satisfaction de savoir que des cousin font des efforts pour reforcer la culture africaine.
Je suis camerounais et je suis à Berlin. Je suis preoccupe par le devenir de l'Afrique. Cette Afrique qui aujourd'huit gagnerait à reforcer son identite qui por ma par est l'un des points depart pour un lendemain que nous offrirons à nos enfants. Certains par manque de repaire sont aujourd'hui desoriente et s'identifient par la culture europeenne.
Loint de moi l'idee de vouloir ramener un debas de difference raciale ou de rivalite interculturelle mais juste vouloir faire savoir que pour un bon echange il faudrait que chacune des partie aie quelque chose a proposer.
L'africain muni de plusieurs diversite cuturelle devrait aujourd'hui chercher sa vraie identite.
Une fois encore mes sincere fellicitation à toute l'equipe.
Je serrai prèt à donner ma contribution.

Ngogang Rostand
Artiste, Graphiste, Videastre
0049 176 29300644
Coppistr 20 WEN 28-20-01-20
10365 Berlin

NB: Je me suis servi d'unn clavier allemand. C'est pourquoi je vous demanderais de faire l'effort de lire attentivement surtout pour les accents

Réponse ya Rédaction


Cher Rostand,

merci pour ces encouragements qui nous vont droit au coeur.
Cela est aussi le sens même de notre démarche. Nous espérons vivement que nos frères africains, et particulièrement les intellectuels africains de cette génération s'éveillent enfin, et donnent à nos cultures africaines -à commencer par nos langues nationales, symboles de notre identité- la place qui leur revient, et que change enfin cette mentalité d'éternels complexés qui fait qu'un "bon africain instruit" est celui qui maîtrise le mieux la culture occidentale et méprise la sienne.

Car il n'y a pas plus de fierté à parler les langues des ex-colonisateurs que celles de nos ancêtres.

Nous seront très heureux de vous lire la prochaine fois.

Mbote na yo! (salut à vous!)

MAKAMBO PROSPER
(R.D.CONGO)
24. November 2005 20:33


Sujet: Nasepeli
 


Nasepeli komona 'te bozwi makanisi malamu mpo na kokoma lingala na internet. Kasi nde nasengi bino bokoma na lingala. Lifalanse (Français) ekoki kozanga te. Kasi lokota yango ekomamaka na mikanda ndenge bolobi bino moko. Bomeka kokoma na lingala ya mwa malamu, oyo etondi lifalanse ebele ebele te. Nakokoma lisusu. Natombeli bino mosala malamu. Bolemba te mosala na bino ekosepelisa bato mingi. Natondi bino.

Ngai wa bino Prosper Makambo

Réponse ya Rédaction


Ndeko Prospère Makambo,

Totóndi yo pe lokóla, pe tosepélí míngi na mokanda na yó. Likambo olobi awa ezali na ntina monene. Tozali káka koluka nzelá nini po ebelé ya bato oyo bazalí kotánga biso báyéba koyóka pe kolanda biso malámu. Tokosála káka makási pó na ko lembisa lingála na bísó. Kasi tosúkaí káka wáná te. tokotiéli bino awa na esika oyo dictionnaire na bísó: Diksionére ya Suka Époque.
Ezalí po na kozóngisa lisúsu pósá epái ya batángi na bísó, óyo bazalí na mikakatano pó na koloba na lingála, pó bákoka koyékola pe lingála ya sóló.
Kasi elobeli na bísó áwa ezalí na mwá pási pó na kozwa nzela na kati-káti, na ndéngé 'te ba óyo bayébi lingála ya solo solo, ná ba óyo bayébi lingála malámu te, bákoka kolanda bísó. Po na bísó, totii makanisi na bíso epai ya bilenge po ebele ya batángi na biso bazali se bilenge.
Moké-moké, tósungana pó na kolakisa na bandeko nyónso elengi oyo ezalaka na kotánga na minoko ya bísó. Ézala Lingála to Tshilúba to Swahili to Kikóngo.

Kasi pó na kokokisa maye mánso, esengélí na bíso tópésa mpósa ya kotánga na bilengé na bísó. Pó sókí batángi na bísó bakokakatana pó ya botángi, bakozala lisúsu na pósá te ya kotánga bísó.

Melesi pó na mokandá na yo. Tokolíkia okozala kokomela bísó tángo na tango.

Ótikala malámu epái ozalí.

Kitengie Joelle
(Bruxelles/ Belgique)
22. November 2005 21:18


Sujet:Bravo!
 


Je viens juste de découvrir votre site et ne peux que vous encourager de continuer .Ce que je viens de lire sur votre site m'a donné envie de retourner dans mon pays (quelle nostalgie! ) . Comment faire pour avoir vos revues chaque mois?
Je m'appelle Jo , je suis à Bruxelles.

Réponse ya Rédaction


Chère Jo,
Merci po na mokandá na yo. Tosepélí míngi po na ndéngé
omónísí intérêt po na mosálá na bísó, pó na bínó. Tozali na bisíká ya distribution pe na Bruxelles. Na póso ekoyá, tokotiéla bínó awa ba adresses epái nyónso bínó bozalí.

Otikala malámu.

Mbala ya sima, meká kokomela bísó ata moke-moke na lingala. Ekosála biso plaisir.

Maria Simao
?
26 September 2005, 21:38


Sujet:FELICITATION
 


'NGA NAZA ELENGE YAFRICA,NASEPELI KOKOMELA BINO::::'

Réponse ya Rédaction


Ndeko Maria Simao,

Merci mingi ndenge okomeli biso.
kóbá kaka na kotangaka biso pe kopesa sango ya Magazine Suka Époque na epai ozali.

Emile Zola papa na Noah
(Berlin/ Allemagne)
1 Septembre 2005, 14:22


Sujet:promesse
 


Nazali na esengo ya kokomela bino mokanda oyo.....une chose naza na pasi lokola batangi nyoso ya Suka epoque na ndenge bo prometaki biso que tokobanda kozua numero ya sika chaque mois.....depuis debut Mars ti lelo ata sango...ou excuse aupres ya ba melomanes...naboyi na nga na condanner bino sans na yeba le pourquoi...bosala biso kaka plaisir ndenge ya numero ya liboso.
BONNE CHANCE

Réponse ya Rédaction


Ndeko Émile Zola,

Merci po na mokanda na yo.
Tozalaki na problème moko monene sima ya sortie ya numéro na biso ya liboso. Yango wana tokokaki kobimisa numéro ya mibale na Tango (délais), ndenge tokanisaki te.
Ba problèmes techniques yango nde esalaki ke tii na lelo numéro ya mibale ewumela. Ezalaki likambo ya distribution. Po yango nde ezali kopesa biso mwa ba problèmes mikolo oyo. Po tozali na besoin ya batu ya confiance po na ko représenter magazine na Bino Suka Epoque, na bisika nyonso pe ba mboka epai bozali.
Kasi ndenge tolobi, ba problèmes yango tozali kowa solution. yango wana, tokanisi ke ya mbala oyo, tokokokisa promesse na biso, po magazine ebimaka sima ya sanza mibale (2 mois). Kasi na katikati wana, tokozala kotiela bino (en attendant) ba histoires illustrées ya mikuse-mikuse na Internet.

smooth killah
congo jungle paris guetto
31 Août 2005, 20:24



Sujet:je vous encourage a continuer !!!
 


je vous encourage a continuer !!!
c est vraiment cool de pouvoir lire des bd en lingala en 2005! big up de la part de notre crew congo-jungle(staff na biso) qui regroupe des artistes du guetto ya poto!!!force les freres makasi!!jah aza na bino!

Réponse ya Rédaction


Merci mingi ndeko Smooth Killah.

tokosala kaka courage pona ko continuer kaka. Suka Epoque eza nde eloko na bino. plaisir ya trop na ndenge ya komona ke bana Congo baza kosepela kotanga Suka Epoque.
Tosengi pe bino, na Crew Congo-Jungle bo continuer kaka kotanga biso, pe kopesa ba sango na biso na bandeko mosusu epai bozali.

Bozala kaka na temps...

Reginal-Roland Kudiwu
(Londres na royaume-uni)
31 Août 2005, 19:04



Sujet:Suka Epoque
 


O yo ezali likambo moko ya monene bosali pona biso batu balobaka lingala pe ba lingi koyakola yango. Na kuti ba japonais ebele awa oyo balingi ba yekola lingala .ngai pe na lingi na yakola yango malamu pe na koma yango malamu pe. bonne continuation et Vive la langue parlee par des millions LE LINGALA

Réponse ya Rédaction


Merci ndeko Reginal-Roland Kudiwu,

Souci monene tozali na yango ezali pe ke, bandeko nyonso oyo balobaka lingala, bazala pe na esengo ya kotanga yango, pe koyekola yango.
Yango wana na mikolo ekoya tokotia pe rubrike (esika) ya koyekola grammaire ya lingala awa. Ba liens pe ba adresses mosusu ezali déjà awa, oyo ezali komema na bisika misusu ya koyekola lingala. Meka pe kobwaka liso na esika oyo: "Ba adresse misusu ya malonga."

PaulRené Paulino Ngoi
(Italie)
31 Août 2005, 18:40


Sujet:C'est un plaisir
 


C'est un plaisir de lire le lingala et surtout d'apprendre des mots et je comprend aussi bien qu'il aie du français quelque part car le vrai lingala "oyo ya Makanza" qui le parle, qui le comprend. Du moins ekozala bien koyebisa bato que lingala ya Makanza ezalaka, mais...en faire une petite histoire, question de comprendre le pourquoi de quelques mots français. Je parle bien le lingala mais je boite un peu dans l'écriture c'est pourquoi nazokoma un peu en français. Awa na Italie, situation na biso eza mua compliquè par rappoprt aux autres pays, mais soki bojuger yango utile, je peux toujours komeka kolakisa revue na bino chez masta moko oyo aza na boutique, on ne sait jamais, question de s'entraider. Bon travail, bolemba tè, idée eza vraiment bien, naza na mua ba projet sur le lingala, tokosolola prochainement.
Ciao

PRP.NG

Réponse ya Rédaction


Ndeko Paul-Réné Paulino Ngoi,

Esakli biso esengo mingi, po na komona ke ata tozali ya kokabwana na ba mboka na mboka, kasi eloko oyo ezali kosangisa biso bana ya Congo, ezali: Lingala ezali monoko na biso.
Ndenge kaka olobi, Lingala ya solo-solo pe ezali (lingala ya makanza). tokotia artikle moko awa po na komeka ko libola too ko expliquer yango moke, po na ko ba lecteurs na biso pe bayeba pe ba comprendre ndenge lingala ezali ko kola (ko se developper)... Kasi lingala oyo ezali kolobama lelo ezali lingala ya Kinshasa.
Kasi tokozwa tango penza po na ko expliquer yango.
Po na kobongisa distribution na mboka Italie, tokokomela yo na Adresse na yo, po na kotala ndenge tokoki kosala po na kobongisa distribution ya magazine Suka Epoque na epai bozali.

Merci mingi pe kobosana te kokomelaka biso, tango na tango.

lusamunadio-diambu pathou
(Luanda/Angola)
31 Août 2005, 16:28


Sujet:Suka Epoque
 


Nazali na esengo mingi ya ko komela bino ,po eté nalinga ka mingi langue oyo ya mboka nabiso, tosala makasi pona lingala ekoma langala intenational, malgre que ba ningi na biso bayokaka soni yakoloba lingala,na mboka yabapaya,biso tokolakisa cultur nabisou kinkulu na biso ,esengo ekozala soki tozali tango nionso na koyeba na basango , nasali makasi po ete na koma kaka na lingala, po ete bino pe bo sepela , ngai na linga BINO MAKASI , TOSANGANA PO NA LINGALA EKENDE LIBOSO

Réponse ya Rédaction


Ndeko Lusamunadio-Diambu Pathou,
Ezali kaka ndenge yo moko olobi:
Tolingi lingala elobama na ba ndeko na biso, epesa pe ba ndeko mosusu posa ya koyekola yango. Ezali eloko ya lokumu po na kolakisa culture na biso. Soki tobeteli yango tolo te, eske ba mindele nde bakoya kobetela yango tolo?
Ntina oyo ba ndeko ebele bayokaka soni po na koloba lingala ezali tango mosusu kozanga ko maitriser monoko yango; kasi mingi pe ezalaka nango kaka complexe.
T okolobela Likambo yango mingi na mikolo ekoya.

Merci pe mbote mingi epai ozali, kuna na Luanda.

Carls
(Côte d'Ivoire)
30 Août 2005, 15:24


Sujet:Longonia
 


bjr ,tres cher,merci ya trop ndenge ozui likanisi ya ko sala magazine oyo ,vraiment na lingaki na pesa yo longonia penza penza.
omoni mboka eza naino na kati ya nungu nungu mpe likanisi na ya ezali malamu mpo epesa biso mwa esengo na mitema mpo to koka ko bosana mwa mikakatano oyo eza koleka mikolo nionso.
na yango lokola e te mboka ezali koluka nzela mpo etelema,ebongi moto na moto esika e te yo o fandi so na leopold nto mpe na mikili ya poto to meka malembe malembe kobongi mboka mpote to zongela esika na biso ya kala ndenge bazalaka ko mpesa biso lokumu
mokakasua bona magazine na biso mpote ekomatisa lokumu ya mboka.
mua ndakisa e te na biso awa tokoki kozua yango te mpo ezlite
kasi na net ezali likanisi moko ya monene nasepeli ya mingi pona eloko osali mokakosua longonia

Réponse ya Rédaction


Merci mingi ndeko Carls.

Tokosala makasi po na kotombola culture na biso, pe monoko na biso po ezali elembo ( signe) ya identité na biso pe ya bomoto na biso.
Moke moke, tii tango makambo nyonso ekobonga.
Tokosenga se eloko moko. Koba se ko koba, na kotangaka biso, pe pesa sango na biso na ba ndeko oyo bazali pembeni na yo.

Mbote mingi epai ozali

Bobe barnabe
?
30 Août 2005, 15:20


Sujet: Recherche
 


Jaimerais correspondre avec toute personne parlant lingala.Je suis camerounais et elle me plait aussi bien.
De preferance un contact par E-mail:

bobesolo@yahoo.fr

Réponse ya Rédaction


Cher Bobe Barnabé,

nous sommes heureux de vous lire.
Bien sûr que nous publions ici votre courriel, en vous souhaitant de trouver un(e) correspondant(e) au plus vite.
visitez-nous de temps en temps: nous publierons dans les jours qui viennent quelques leçons de Lingala pour débutants...

Merci

Venant Kimbanzi
(Bruxelles/ Belgique)
30 Août 2005, 15:13


Sujet:retour aux sources
 


Bonjour à toute l'équipe de Suka Epoque. Je suis très ravi de ce retour aux sources car les lingalaphones en avaient vraiment besoin,et j'aimerais ensuite connaître la fréquence de la parution de cette revue!
Est-ce un mensuel, bimensuel...etc
Très longue vie à Suka Epoque.

Venant Kim

Réponse ya Rédaction

Mr Venant Kimbanzi,
Vous sommes heureux de vous compter parmi ceux qui soutiennent notre projet Suka Epoque.
Nous aurions bien voulu sortir mensuellement, mais les difficultés de distribution nous contraignent pour l'instant à patraître seulement tous les deux mois: donc le magazine est bimestriel.

Nous espérons que les problèmes de distribution que nous avons connus au début seront vite reglés à la parution du sécond numéro et que cela nous permettrait d'écourter l'attente des lecteurs en paraissant mensuellement...

Monique Sarens
(EDEGEM/Belgique)
30 Août 2005, 15:39


Sujet: Suka époque
 

Nalingi kobenga suka epoque mboka 15/02/2005.

Réponse ya Rédaction


Mme Monique Sarens,
Tokoki kotindela yo numéro ya Liboso ya Suka Epoque.
Tokoki pe kotinda lisusu numéro ya Mibale oyo ekobima na sanza (mois) oyo ya Septembre.
Tokokomela yo na adresse na yo po na kotala ndenge ya kotindela yo yango


ADOLPHE
L'oxygene des écoles
(Kongo)
30 Août 2005, 16:58



Sujet: Magazine Suka-Epoque
 


nasepeli makasi

Réponse ya Rédaction

Adolphe,
Biso pe tosepeli mingi na lettre na yo.
Tangaka biso, pe pesaka sango na biso na pembeni na yo, epai ozali.